Revelation of John 14

Mwana meme mpe bato nkoto nkama moko na ntuku minei na minei

1Bongo namonaki Mwana-meme atelemaki na ngomba ya Siona, mpe bato nkoto nkama moko na ntuku minei na minei (144.000) bazalaki elongo na ye. Mpe kombo ya Mwana meme, na oyo ya Tata na ye, ezalaki ya kokomama na bilongi na bango. 2Nayokaki mongongo moko ewutaki na likolo, ezalaki lokolamakelele ya mayi monene, mpe lokola lokito ya kake monene. Mpe makelele oyo nayokaki ezalaki lokola oyo ya babeti mandanda, oyo bazali kobeta mandanda na bango. 3Bazalaki koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya bokonzi, liboso ya bikelamo minei ya bomoi mpe ya bampaka. Mpe moto ata moko te akokaki koyekola nzembo yango, longola kaka bato wana nkoto nkama moko na ntuku minei na minei (144.000) oyo bakangolamaki na mabele. 4Ezali bato oyo babebisaki nzoto na bango te na basi, pamba te bamibatelaki peto. Ezali baoyo bazalaki kolanda Mwana-meme na bisikanyonso ye azalaki kokende. Bakangolaki bango na kati ya bato, mpo bakaba bango epai ya Nzambe mpe epai ya Mwana-meme lokolamakabo ya liboso. 5Lokuta emonanaki na monoko na bango te, mpe bazalaki na mabe ata moko te.

Baanzelu bayebisi sango ya kosambisama mpe ya kokweya ya babilona

6Bongo namonaki anzelu mosusu azalaki kopumbwa na kati ya likolo, azalaki na Sango Malamu ya seko mpo na kosakola yango na bato oyo bavandaka na mokili : na bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya minoko nyonso, mpe ya mikili nyonso. 7Azalaki koloba na mongongo makasi :

—Bobanga Nzambe mpe bopesa ye nkembo ; pamba te tango ya Nzambe mpo na kosambisa bato ekoki. Bokumisa ye oyo asalaki likolo, mokili, ebalemonene mpe bipai mayi ebimaka !

8Anzelu ya mibale alandaki mpe alobaki :

—Mboka monene ya Babilona, ekweyi, ekweyi ; yango moto emelisaki batoya bikolo nyonso vino ya kanda ya kindumba na yango !

9Bongo anzelu ya misato alandaki bango mpe alobaki na mongongo makasi :

—Soki moto asamopanga nyama mpe elilingi na yango, mpe azwi elembo na elongi to na loboko na ye,
10ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, oyo esangana na eloko moko te, oyo batia na kopo ya kanda na ye. Akomona pasi na moto mpe na sufululiboso ya baanzelu basantu mpe liboso ya Mwana-meme. 11Mpe molinga ya pasi na bango ekomata na likolo libela na libela. Baoyo bakumbamelaka nyama mpe elilingi na ye, mpe moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na ye, bakopema te butu mpe moi.

12Yango wana basantu, baoyo babatelaka mibeko ya Nzambe mpe kondima na bango na Yesu, basengeli kokanga mitema.

13Bongo nayokaki mongongo moko ewutaki na Likolo mpe elobaka :

—Koma : Esengo na bato oyo bazali kokufa kati na Nkolo ! Mpe Molimo alobi : E e ! mpo ete bapema na misala na bango, pamba te misala na bango ezali kolanda bango.

Tango ya kobuka mbuma ekoki

14Bongo namonaki lipata moko ya pembe. Mpe moto moko akokanaki na Mwana ya moto afandaki na kati ya lipatayango : alataki ekoti ya bokonzi ya wolo mpe asimbaki mopanga moko ya mino penza oyo balongolelaka mbuma na bilanga. 15Anzelu mosusu abimaki na Ndako ya Nzambe, agangaki na mongongomakasi na moto oyo avandaki likolo ya lipata :

—Kamata mopanga na yo mpe kata mbuma, mpo tango ya kolongola mbumaekoki, mpe mbuma ya mokili esiʼekomeli.
16Bongo moto oyo afandaki likolo ya lipata asalelaki mopanga na yena mokili mpe alongolaki mbuma na yango.

17Anzelu mosusu abimaki na Ndako ya Nzambe, oyo ezali na Likolo. Ye mpe azalaki na mopanga moko ya mino penza oyo balongolelaka mbuma na bilanga.

18Sima anzelu mosusu oyo azalaki na bokonzi likolo ya moto, abimaki na esika batumbaka makabo. Mpe agangaki na mongongo makasi epai ya ye oyo asimbaki mopanga ya mino penza ; alobaki na ye :

—Kamata mopanga na yo, mpe kata bambuma ya nzete ya vino oyo ezali na mokili ; pamba te bambuma na yango esiʼeteli.

19Bongo anzelu wana asalelaki mopanga na ye na mokili. Mpe akataki bambuma ya nzete ya vino oyo ezalaki na mokili, mpe abwakaki yango na nzungu monene ya kanda ya Nzambe. 20Bongo bakamolaki mbuma yango na libanda ya vile, na kati ya nzungu wana ya monene. Makila mingi ebimaki na nzungu yango, etondaki kino kokoma na monokoya punda, soki punda etelemi, mpe epanzanaki na mokili kino na bakilometele nkama misato.
Copyright information for LinMNB